RDC: Franck Diongo abimi mpo na mwa ntango

 


Franck Diongo azwaki litomba, samedi oyo le 15 juillet, na bonsomi ya provisoire, esakoli lingomba na ye ya politiki, Mouvement Lumumbiste progressiste (MLP). Alongwe na boloko ya basoda ya Ndolo mpo na kokende kofanda na ye.


Engebene na lingomba na ye, procureur militaire akanisaki ete bobangi ezali te mpo na kokima na ye mpe akoki na ntango nyonso koyanola na mabengisi maye makotindama epai na ye mpo na bokobi ya bolukiluki yambo ya bosembo ya likambo na ye.


Akangamaki wuto le 20 juin na ba renseignements militaires na Kinshasa yambo na kotiama na maboko ya justice militaire, président ya MLP alekisaki mikolo tuku mibale na motoba na bokangami yambo na bosambisami, kati na yango 6 na Ndolo mpe 20 na cellule ya renseignements militaires.


Adversaire a transférer le 8 juillet, wuto boloko ya ba renseignements militaires (Ex DEMIAP) na prison militaire ya Ndolo.


Botiami oyo esalemaki sima ya boyokani ya mokuse na auditeur général ya FARDC.


Afundami mingi mingi mpo na kosangana na ye na bitumba na district Gramalique na Kinshasa kati na bituluku biye biyebani na kombo ya ''Forces du progress mpe Mongo''. Opposant politique na parti na ye balingaki kozala na kati ya bitumba oyo. Afundami mpe mpo na kozala na ebundeli na ndenge ya mabe. 

Commentaires