Likambo ya Matata: Gouverneur ya kala ya BCC, Deogratias Mutombo ayokaki, dossier etindami na ba juges constitutionnels mpo na kobanda procès

 


Parquet général na Cour constitutionnelle ekangaki enquête préliminaire ya likambo liye kotelemela yango na Premier ministre ya kala Augustin Matata Ponyo. Selon unité na yango ya communication oyo epesi biso information oyo, demande na tina ya ko fixer date ya audience devant ba juges Constitutionnels ebandaki vendredi le 14 juillet 2023.


Ayebisi ete mokambi ya kala ya Banque centrale ya Congo (BCC) ayokamaki mpo na likambo liye kaka vendredi eye. Alingaki kutu kobatelama lokola mofundami na acte ya transmission mpo na fixation liboso ya ba juges.


Kolanda même source, lokola gouverneur ya kala ya Banque centrale, Deogratias Mutombo afundami mpo na kosala na complicité na Sénateur Matata Ponyo, na tango wana mokambi ya gouvernement, na déboursement ya misolo ya leta oyo na sima elingaki ko détourner.


Bomikundola ete Augustin Matata Ponyo ayanolaki te na ba invitations mibale ya parquet na Cour constitutionnelle. Libenga ya sika tii lelo ezali oyo ya le 12 juillet.


Premier ministre ya kala, na étape oyo, akozala obligé ya ko répondre directement devant ba juges Constitutionnels na ba faits oyo ezali na charge na ye. Wana ezali dossier ya "biloko ya zairianisé" mpe oyo ya ba prétendu détournement ya misolo oyo ekanamaki mpo na parc agro-industriel ya Bukanga Lonzo. 


Mpo na dossier ya yambo, afundami mingi mingi mpo na détournement ya 250 millions USD (Cfr Report IGF) oyo ekanamaki mpo na projet ya parc agro-industriel ya Bukangalonzo. 


Dossier ya mibale oyo ba procédures wana etongami likolo na yango etali ba actes ya prétendu détournement ya misolo oyo ekanamaki mpo na indemnité ya bato 300 baye balobaka ete bazali ba propriétaires ya ba biens « zairianisés » - oyo bapesamaki na domaine public sima ya ba réformes oyo président Mobutu asali.

Commentaires